Psalms 53

Tobunga nzela

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; eyembamaki na flite.


1 Zoba alobaka na kati ya motema na ye
“Nzambe azali te” ;
bamibebisa penza,
mpe banzela na bango ezali mabe.
Moto ata moko te azali oyo azali kosala malamu.

2 Nzambe azali kotala wuta na Likolo, bana na bato ;
mpo amona soki bato oyo bazali kososola bazali,
oyo balukaka Nzambe.

3 Bango nyonso babunga nzela,
babeba elongo ;
ezali ata na moko te oyo azali kosala malamu,
ata moko te.

4 Bato oyo basalaka mabe basosolaka te ?
Baoyo bazali kolia bato na ngai ndenge bato baliaka lipa ;
mpe babengaka Nzambe te.

5 Tala, balengaki mpo na somo,
kasi likambo ya kolengisa bango ezalaki te ;
Nzambe akopanza mikuwa ya baoyo
bazalaki kobundisa yo ;
okoyokisa bango soni,
pamba te Nzambe amonaki bango pamba.

6 O o, soki lobiko ya Isayele ekowutaka na Siona !
Tango Nzambe akozongisa bozwi ya bato na ye,
tika ete Zakobi asepela,
mpe Isayele azala na esengo.
Copyright information for LinMNB